Acts 6

Baponi badiakre

1Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba monoko ya greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba monoko ya ebreo, pamba te na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo, basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela. 2Boye, bantoma zomi na mibale basangisaki bayekoli nyonso mpe balobaki na bango : “Ekozala malamu te mpo na biso kotika mosala ya koteya Liloba ya Nzambe mpo na komipesa na mosala ya kokabola biloko ya kolia. 3Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bazali na bizaleli ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango. 4Boye, biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya koteya Liloba ya Nzambe.”

5Likanisi yango esepelisaki lisanga mobimba. Boye, baponaki : Etieni, moto oyo atonda na kondima mpe na Molimo Mosantu, Filipo, Prokore, Nikanori, Timoni, Parimenasi mpe Nikola, moto ya Antioshi oyo akotaki na lisanga ya Bayuda. 6Balakisaki bango epai ya Bantoma, oyo batiaki bango maboko mpe babondelaki mpo na bango.

7Boye, Liloba ya Nzambe ezalaki kokoba kopanzana, motango ya bayekoli ezalaki mpe kobakisama makasi na Yelusalemi mpe banganga-Nzambe ebele bakomaki kondimela Yesu.

Bakangi Etieni

8Nzoka nde, Etieni, moto oyo atondaki na ngolu mpe na nguya ya Nzambe azalaki kosala bikamwa mpe bilembo minene kati na bato. 9Bongo, bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo babengaka “Ndako ya mayangani ya bansomi” : Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azi bazalaki na tembe na Etieni ; 10kasi balongaki te kotelemela bwanya mpe Molimo oyo azalaki kotinda ye koloba.

11Bongo, bapesaki kanyaka epai ya bato mpo ete baloba : “Toyokaki Etieni koloba maloba ya kotuka Moyize mpe Nzambe.”

12Basalaki ete bato, bampaka mpe balakisi ya mibeko batomboka. Boye, bayaki kokanga Etieni na mbalakata mpe bamemaki ye na Likita monene. 13Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki : “Moto oyo azali kolemba te kobebisa lokumu ya Tempelo mpe ya mibeko ya Moyize. 14Pamba te, toyokaki ye koloba ete Yesu ya Nazareti akobuka Tempelo oyo mpe akobongola bizaleli oyo Moyize atikela biso.”

15Bato nyonso oyo bavandaki na Likita monene batalaki Etieni malamu penza, mpe bamonaki ete elongi na ye ekomaki lokola elongi ya anjelu.
Copyright information for LinMNB